1 Bongo ba ninga tozali ko yikisa mpiko pe ko lendisa bino na kombo ya mokonzi Yesu. Bo boyekolaki na biso lolenge ya kosepelisa Nzambe; nde yango bozali ko landa. Bo koba bango. 2 Boyebi mitindo topesaki bino ko wuta na mokonzi Yesu. 3 Jambi mokonzi alingi bo peto na bino, bo boya kindumba, 4 moto na moto abatela nzoto na ye peto po na lokumu. 5 Bo mikaba na ba posa ya mabe te (lolenge ba yeba yebi Nzambe te). 6 Moko te akosa to asala moninga mabe. Pamba te mokonzi a ko pesa etumbu na ba tomboki lolenge to lobaki na bino. 7 Nzambe abengaki biso na bosolo te kasi na bopeto. 8 Yango wana moto oyo ako boya mateya oyo aboyi pe Nzambe oyo apesaka Molimo Mosantu. 9 Pona oyo etali bolingo na bino na bino, ezali na tina te ba teya bino yango, Mokonzi ye meyi ateyaka bino yango. 10 Longonia po na oyo bozali kosala pona ba ninga ya Macedoinepe bo yika mpiko na kosalaka bango koleka. 11 Bo sepela kovanda na kimia, ko sala misala ya maboko na bino pe ko tala misala na bino moko, bo topesaki mitindo. 12 Bo sala bongo po ete bo tambola kati na sembo na bo tosi liboso na ba ninga oyo nanu bo ndimeli te pe bo kelela te. 13 Ba ninga toyoyi ete bozala na bulu yeke pona ba kufi po ete bozala na mawa makasi te lokola bato oyo ba zangi elikia pona maye na makoya lobi. 14 Soki to ndimi ete Yesu akufaki pe asekwaki, to ndima pe ete Nzambe akosekwisa pe ba oyo ba kufaki kati na Yesu. 15 To yebisi bino na mitindo na mokonzi ete baye bazali na bo moyi, bazali kozela bo zongi na mokonzi, ba ko netwama liboso na ba oyo ba kufaki te. 16 Pamba te mokonzi ye moko ako zonga ko wuta na likolo, ako ganga na mongongo ya anzelu pe kelelo ekobeta, boye ba Klisto bakufa bako sekwa liboso. 17 Bongo biso ba Klisto toko netwa pona kokutana na Mokonzi na mapata pona libela. 18 Bolendisa bango bino na nzela na maloba oyo.