Mokapo 5

1 Sika oyo, mpona oyo etali ngonga mpe bileko, bandeko ba koti tokomela bino te. 2 Po ete boyebi malamu mokolo na Mokonzi ezali koya lokola moyibi na butu. 3 Tango ba koloba: "kimia mpe bokengi ezali," nzokande libebi ezako yela bango. Lokola mpasi ya kobota ya mwasi. 4 Kasi bino ba ndeko, bozali kati na molili, mpo ete ozuama lokola moyibi. 5 Kasi bana ya moyi, mpo tozali bana ya butu te. 6 Lokola tozali bana ya moyi tozala ekenge. 7 Mpo ba oyo ba lalaka balalaka na butu. 8 Mpo ete tozali bana na moyi, tomi batela, to lata ekoti ya kondima, mpe bolingo. 9 Mpo ete Nzambe abengaki biso mpo na kanda te, kasi mpo na kozua na nzela ya Mokonzi Yesu. 10 Oyo akufaki mpona biso, mpo ete tobika elongo na Mokonzi na biso Yesu Klisto. 11 Mpo na yango bolendisama mpe bopesana mpiko moko epayi na moninga na ye ndenge bosalaka. 12 To sengi na bino bandeko, botosaka bato oyo bazali ko kamba bino na nzela ya Mokonzi mpe bazali koteya bino. 13 To sengi na bino mpe bozala na bolingo makasi epayi na bango mpo na mosala oyo basalaka, bozala na kimia kati na b ino. 14 To sengi na bino bandeko, bokebisa bato na goyi-goyi, boyikisa mpiko na bato ya kobanga bosunga bato pete, bozala bato na motema molayi epayi na bato nyonso. 15 Bo keba ete moto moko te asala moninga na ye mabe, kasi boluka tango nyonso kosala malamu epayi na bato nyonso. 16 Bosepelaka tango nyonso. 17 Bobondela na kotika te. 18 Bo pesa Nzambe matondo mpona makambo nyonso. Mpo yango nde makambo Nzambe asengi ete bosala kati na Nkolo Yesu. 19 Bokanga mosala ya molimo te. 20 Botiola masakoli te. 21 Kasi bomeka makambo nyonso, bongo bokangama na oyo ya malamu. 22 Bo kengela makambo nyonso ya mabe. 23 Ekoki Nzambe na kimia azalisa bino bato na ye. Ekoki Molimo na yo nyonso, motema mpe nzoto ezanga bo soto kino Nkolo Yesu akozonga. 24 Moto oyo abengi bino azali sembo mpe ezaye nde akosala. 25 Ba ndeko, bobondela mpe mpona biso. 26 Bopesa bandeko mbote ya esengo. 27 Nasangi na bino kati na Mokonzi ete mokanda oyo etangama na ba ndeko nyonso. 28 Tika ngolu na Mokonzi Yesu Klisto ezala na bino nyonso