Mokapo 3

1 Na yango, toko kaki kokanga motema te, to monaki ete ezalaki malumu ko tikala biso moko na Athenes. 2 Boye to tindaki bapanzi sango malamu na Mokonzi, mosali na Nzambe Timothe mpo na kolendisa mpe ko yeyisa bino makasi ayengebene na bo ndima na bino. 3 Tosali boye mpo ete moto te azala na mikakatano na boyambi mpe bo yebi bino moko ete tobiangami mpo na yango. 4 Solo tango tozalaki na bino , toyebisaki bino ete toko niokama kati na kati nakomi tungisa boyebi ete ekomaki. 5 Na tina wana, na kokaki kokanga motema te mpo na ko zela, na zalaki koyaka bondimi na bino ta mosusu momeki, ame kaki mosala na bino ete ezali pamba. 6 Tango akomaki epayi na bino amemelaki bino ba sango malamu na bondimi mpe na bolingo na bino. Alobaki ete bino bozali kokengela makambo malamu na biso. Mpe bozali na mposa ya komona biso; lokola biso mpe tolingi yango. 7 Na boye, ba ndeko mibali, na kati na mawa mpe mpasi, tolendisamaki na bino na tina ya kondima na bino. 8 Sika oyo tozali kobika, soko bokangami makasi kati na Mokonzi. 9 Bongo, na ndenge nini tokoki kopesa matondi na Nzambe mpo esengo oyo tosengeli komonisa liboso na ye. 10 Butu mpe moyi, tozali kosambela ye na makasi koleka mpo amonisa biso elongi na bino mpe kobakisa oyo ezangi na bondimi na bino. 11 Tika Nzambe na bino mpe Tata ye moko, mpe Mokonzi Yesu ba talisa nzela na biso. 12 Tika mokonzi akolisa bino mpe afulikisa bolingo kati na bino na ba misusu mpe na batu yonso, lokola tozali kosala mpo na bino. 13 Asala bongo, mpo kolendisa mitema na bino mpo ezala kozanga mbeba na basanto liboso na Nzambe mpe Tata na bozongi na Mokonzi Yesu na ba santu yonso.