1 Na bongo boyebi bino moko, ba ndeko boyeyi na biso epayi na bino ezalaki ya pamba te. 2 Bo monaki bino moko ndenge to monaki pasi mpe minyoko ya soniu na mboka ya ba Phillipe. Tozuaki elikia na biso kati na Nzambe, mpona kosa kola sango malamu ya Nzambe kati ya ebele ya bato oyo bayokanaka te. 3 Na bongo lilendisi ya biso ezali ya kokosa te, mpe ya bosoto te, mpe ya lukuta te. 4 Nzokande na ndenge oyo biso tondimisami na Nzambe mpo na biso sango malamu oyo tozali koloba. Tozali koloba mpona kosepelisa bato te, kasi kosepelisa Nzambe. Ye nde ayebi mutema na biso. 5 Na bongo biso tolobaki maloba ya losepelisa bato te, ndenge boyebi ata na mayele ya kolula, Nzambe azali molobeli na biso, 6 mpe to lukaki nkembo ya bato te, oyo ewuti na bino to na ba mosusu, biso to telemelaki lokola ba toma na Klisto. 7 Nzokande, tozalaki na kati na biso lokola maman ayangelaka bana na ye. 8 Nse bongo, tozuaki sayi pona bino ko kabola na bino sango malamu kaka te, kasi pe bizaleli na bino, na bongobokomaki na motuya pona biso. 9 Na bongo bazo kanisa bino moko, ba ndeko, mosala na biso mpe pasi na yango. Tosalaki kosali butu mpe moyi, na tina komemisa bato mukumba na biso te. Na tongo wana, tozo teya bino liloba na Nzambe. 10 Bozali ba nzengeleke, mpe Nzambe ye meyi ayebi, ndenge tomi batelaki kozala bule, sembo mpe na tembe te liboso na binop boye bondima . 11 Na lolenge wana, bino moko boyebi ndenge kani tozalaki okati na bino ndenge papa azalaka na bana, tolendisaki bino, mpe to pesaki bino longonya. 12 Biso tolobelaki bino na ndenge bokoki to tambola na lolenge ekoki na Nzambe, oyo abenga bino na bokonzi mpe kembo na ye. 13 Na tina wana, tozongisi matondi na Nzambe tango oyo boyambaki kowuta na biso sango malamu ya Nzambe , bo ndimaki yango te lokola maloba ya bato. Nzokande bondimi yango na lolenge ebongisami, liloba ya Nzambe. nde maloba oyo ezali kosala mosala kati na bino bandimi. 14 Kasi bino baninga, bozo kokana komekola biso lokola ekelezia ya Juda kati an Klisto Yesu, pamba te bo moni bwale lokola baninga na bino ya liboso, oyo ba kemba epayi ya ba Yuda. 15 Ezalaki ba Yuda nde baboma Mokonzi Yesu elongo na ba basakoli. Ezalaki ya Yuda nde ba benganaki biso. Bazalaki kosepelisa Nzambe te. 16 Bazali kutu kopekisa biso koteya bato mosusu te oyo ba Yuda, po ete bango babika te. Kanda na Nzambe ekokitela bango na mokolo ya suka. 17 Mwa tango moke tokabwanaki na bino, kasi na motema te. Tozalaki na posa monene na motema komona bino. 18 Bongo tokanaki koya epayi ya bino na Polo, kasi mbala o mbala, kasi zabolo akangeli biso nzela. 19 Bongo wapi elikwa na biso na mikolo ekoya to esengo, to motole ya lukumu liboso na Mokonzi Ysu na bo zongi na ye? Ezali bino te, lokola ba susu? 20 Bongo bino bozali nkembo mpe esengo na biso