Mokapo ya 3

1 Sasa ipi bandeko, bobondela pona biso, tina ete maloba ya Monkonzi mateyama na lombango mpe masanzolama, ndakisa kati na bino. 2 Bobondela na tina ya basikolami na biso na bato ya nkanja mpe mabe mpo bango nyonso bazali na kodima te. 3 Kasi Mokonzi azali sima ya maloba naye mpe akofwandisa bino mpe kobatela bino na moto ya nkanja 4 Tozali kolikya na Mokonzi na bolingo na tina na bino, ete bozali kosala mpe kokoba kosala maye nyonso mandimisamaki. 5 Boye Mokonzi akamba mitema na bino na bolingo na Nzambe mpe na Konzo ya Masiya. 6 Sasa ipi bandeko, tozali kopesa bino mitindo na nkombo ya Mokonzi Yesu masiya, bosangana te na ba ndeko oyo bazali na kati na botawu mpo yango elongobani na bizaleli kokitana na biso te. 7 Mpo bino moko bozali na boyebi ya komekola biso. mpo ete tozalaki kati na bino na bizaleli ya batomboki te. 8 Mpe toliyaki ofele kwanga ya moto te . Nzoka nde tosalaki mosala makasi na mpasi, butu mpe moyi, tina tozala mokumba epayi na bino te. 9 Tosalaki yango mpo na bozongi lolenge ya kokonza te. Nzoka nde tosalaki boye na tina ya kotalisa ndakisa epayi na bino mpe bokoka komekola biso. 10 Eloko tozalaki na bino, topesaki mitindo ete soki moto aboyi kosala masala, aliya mpe te. 11 Mpo toyokaki bayike kati na bino balingi mosala te kasi bamipesi na kibolole. 12 Bongo pona bango topesi mitindo mpe to teyi bango na komno ya Yesu Masiya kosala na kimia mpe kolia kwanga oyo bamilambeli. 13 Kasi bino bayengebene, bolemba te kosala oyo elongobani. 14 Motomboki nyonso na maloba ya mukanda eyebosangana naye soki moke te mpona soni naye ebima mpwasa. 15 Bomona ye lokola monguna te kasi bokebisaye lokola ndeko. 16 Tika ete kimia ya Ye Meyi Mokonzi epesamela bino tango nyonso. Azala mpe na bino. 17 Ngayi Paul napesi bino losako lolenge nazali kosala na mikanda minso. 18 Tika ete ngolu ya Mokonzi Yesu Masiya ezala na bino banso.