Mokapo ya 2

1 Sika oyo, tosengi na bino na parade ya Mokinzi na biso Yesu Klisto, ekosalama elongo na biso. 2 bozala komitungisa te na makanisi, na molimo, na maloba to na mukanda mpo na kodimisa bino te koya na Mokonzi ebelemi. 3 Moto akosa bino te ata ndenge nini, mpo yango ekosalama te kino ekoya komekama, moto azangi mibeko amonana na muana ya libebi. 4 Oyo akotosa te to akotomboka na baye bazali kobiangama Nzambe mpo ba kumisa ye, na yango bazali kofanda na kati ya biyangamele ya Nzambe mpo bomonisa banga lokola akomi Nzambe. 5 Bokanisa ete nayebisaki bino makambo oyo ngonga nazalaki na bino? 6 boyebi sikoyo ezali kopekisaye na lolenge ete amimonisa na ngonga ekoki. 7 Mpo ete mabombami ya kozanga kotosa esili kokoma na misala, kaka moto moko asimbi yango kino ngonga oyo ye akolongua na nzela wana. 8 Mpo na yango, oyo akotosa mibeko akomimonisa polele. Monkonzi Yesu akobuma ye na mopepe ya munoko naye. mpe akokumisa se moto pamba na kokanisa koya naye. 9 Motomboki akoya na nzela ya kmisala ya zabolo na nguya inso na bilembo ya lokuta mpe bikamuiseli ya lokuta. 10 Na kokosa kozanga bosolo, biloko biye bikozala nsolo te pamba te mpo bambi bolingo ya baye bakobunga, mpo ete mbabikisama. 11 Natina na yango, Mokonzi akomema etumbu ya kobungisa na tina ete badima lokuta. 12 Mabe ete bakosambisama, baye banso bandimaki te bosolo, kasi bazui ngolu ya kosala mabe na kozanga sembo. 13 Kasi topesi nglolu na bandeko baye bazali kati na Nkolo, mpo ete Nkolo aponi bango lokola mbuma ya liboso ya bokonzi na Nzambe na kati ya kubulisama na molimo mpe kondimama ya solo. 14 Mpo yango ebiangi bino mpo na tina ya sango malamu, mna tina ya koyamba nkembo ya Mokonzi na biso yesu klisto. 15 Na yango molingami, kanga makasi, simba kodima oyo bateya yo na liloba na biso to na mokanda na biso. 16 Sik'oyo ete Mokonzi na biso Yesu Klisto ye moko na Nzambe Tata na biso oyo alingi mpe apesa biso molende ya libela, mpe bolingo na ye na tina ya ngolu ekoya. 17 Bolendisama mpe bobongisa mitema na bino na kati na misala nyanso malamu mpe na liloba naye.