Mokapo 1

1 Makomi kowuta epayi na Paul, Silvain mpe Timotheé mpona lingomba na ba tesalonika mpona tata Nzambe na yesu Klisto. 2 Ngolu mpe kimia na Nzambe mpe Mokonzi Yesu Klisto ezala na bino. 3 Ebongi na biso kozongisa matondi epayi na tata Nzambe mpona bino bandeko. Esili koyebana te kolingana katinabino na bino esili kokola makasi mpenza. 4 Mpona yango, tozalikosolola na tina na bino na kati na lingomba ya tata Nzambe na lolendo yonso. tozali ko tongo bino na ndenge bozali koyika mpiko kati na buale mpe mikakatano mpe kondima na bino ezali kowumela, tozali kolobela na tina na minyoko oyo bozali kokemba. 5 Ezali solo elembo mpe sembo ya esambiselo ya Nzambe na suka ya makambo nyoso, nde bokozuama na lukumu na kati na bokonzi ya Nzambe mpo bonyokwami na tina na yango. 6 Na sembo mpenza, Nzambe akonyokolo baye bazali konyokolo bino. 7 Mpe akolendisa baye bazali kati na bwale lokola biso . Akosala nyango na eleko Mokonzi Yesu akobimela biso na pwasa na likolo elongo na bangelu na likolo mpe na bokasi nyonso. 8 Na kati ya moto ya kongenge makasi, akozongisa mabe na ba oyo bayebi Nzambe te mpe baye bayambi nsango malamu ya Mokonzi Yesu te. 9 Bakonyokwama na etumbu mpe kobebisama ya libela mpe kobengana mosika libela na libela liboso ya Yawe kati na kembo na bokonzi naye. 10 Akosala yango ntango ekozonga ye lisusu mpo akumisama na baye yaye, bakosanzola ye, mpo badimi mbela naye. 11 Mpona yango, tozali ko sambela ntango nyoso mpo na bino. Tosambela mpo Yawe ayamba bino solo lokola baponami naye, tozali kosambela mpo Ye akokisa mposa ya bolamu ya misala kodima ya nguya. 12 To sambela na lolenge te kombo na Mokonzi na biso Yesu ekumisama na bino. To sambela mpo bino bokumisama ne ye, mpona ngolu na Yawe na biso mpe Mokonzi Yesu Masiya.