1 Polo, Silvain, et Timothée na Etonga ya Thessalonique kati na Nzambe tata mpe Mokonzi Yesu Klisto. Ngolu mpe kimia elata bino mbaso. 2 Tozali kotondo Nzambe tango inso ngonga tozali kobondela mpo na bino. 3 Tozali kokanisa mbala inso liboso na Nzambe Tata na biso, Konzo na bino na kondima, bolingo na bino makasi mpe mopikiliki, na molende ya bokangemi na bino manso matali mokonzi Yesu Klisto 4 Baninga toyebi solo Nzambe alingi bino mpe apona bino, 5 ntina sango malamu oyo tomemeli bino kaka na maloba te kasi na kolikia makasi nguya ya Molimo Mosantu. Lolenge moko boyebi lisungi nini oyo biso tozalaki kati na bino. 6 Boye bino bokomi ba mekoli na biso mpe ya mokonzi lolenge boyambaki sango malamu nkati ya mikakatano makasi kasi na esengo kowuta na Molimo Mosantu. 7 Bokomi bango nolakisa na kondima po ya boye mbanso ya mboka Macedoine mpe Achaie 8 Pamba te kowuta na bino maloba ya mokonzi ezuaki mpifo kaka na mboka Macedoine mpe na Achaie te. Nzoka nde bipayi mbiso kondima na bino etambolaki yango wana tozali na tina ya kobelela yango te. 9 Mpo ete bango moko batalisaki ba pete nionso toyingelaki epayi na bino. Batalisaki lolenge nini ya boyambi na bino epayi ya Nzambe na bosundoli binzambe nzambe pona kosalela Nzambe ya solo oyo azali na bomoi. 10 Bozali kotalisa ete bozali kozela bozongi ya muwana na ye oyo asilaki kosekwisa kati na bakufi. Ye nde Yesu oyo azali kosikola biso na kanda oyo ezali koya