1 Tozali basomi na masiya libela, tozali na etumbu te. 2 Tala lokola ngai Paulo nazali koyebisa bino, soki okatami ngenga Chlistu azali na ntina na yo te. 3 Nazali koyebisa lisusu na moto nyoso akokata ngenga, atosa mibeko minso; 4 Bino botangwa na Masiya, bokangami na mibeko bojali kobika na ngolu na ye te. 5 Mpo na Molimo mpe na kondima tojali kolikya na makambo malamu. 6 Na kati na Chlistu Yesu bakatama ngenga, bakatama ngenga te se lolenge lioko. Kasi bobele kondima kati na bolingo. 7 Bokimaki mbangu malamu. Nani apekisi bino kotosa makambo ma solo? 8 Oyo bojali kosala ejali na makanisi ya moto abiangaki bino te. 9 Ndambu moke ya nfulu, evimbisaka lipa. 10 Natiela bino motema na Mokonji na lolenge bino bokanisaka te tango mosusu oyo ajali kobungisa bino akojala na etumbu na ye. 11 Bandeko, najali koyebisa bino lisusu na ntina ya ngenga, mpo na nini najali kominyokola? Na yango, libaku ya ekulusu esila kolongwa. 12 Nakanisi baoyo bajali kotinda bino na libebi, bango moko balongwa na kati na bino. 13 Mpo ete bandeko, Njambe abiangi bino bojala bansomi. yango etinda bino na misala ya njoto te. Kasi bosalisanaka bino na bino na bolingo. 14 MPo ete mibeko minso mikangami na mobeko se moko: «Linga moninga wa yo lokola yo mei omilingaka.» 15 Soki koswana mpe kobomana kati na bino,bokeba ete bokobebisana. 16 Botambola lolenge ya Molimo kasi na mposa ya njoto te. 17 Mpo ete bamposa ya njoto na oyo ya Molimo eyokanaka te. Mbano na yango ejali kopekisa bino oyo bolingi kosala, bosala yango te. 18 Kasi Molimo atambolisa bino oyo bojali na epekiseli na ntina na mobeko te. 19 Tala, misala ya njoto yango oyo: Ekobo, makambo na mbindo, pite, 20 losambo ya bikeko, kindoki, nkaka, kowelana, juwa, nkanda, kolula, kokabwana, kopona pona, koboma bato, kolangwa masanga, lokoso mpe makambo ya lolenge yango. 21 Nayebisi bino lokola nayebisaki bino liboso, bato oyo basalaka makambo yango, bakoyingela na bokonji na Njambe te. 22 Mbuma na Molimo yango oyo: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, boboto, malamu, kondima, 23 bopolo, kokanga motema, mibeko epekisi makambo oyo te. 24 Baoyo ya Yesu Chlistu, babwaka misala mia njoto mpe mposa na yango. 25 Soki tojali na Molimo, totambola na Molimo. 26 Tojala na lolendo te, totungisamaka te, tolukanaka kati na biso.