1 Kasi yeba boye: na mikolo mua suka, pasi ekoyingela. 2 Mpona bato bako boya kokaba, bakolinga masolo, lelondo, batioli, batioli Nzambe, batomboki na baboti, bazangi batondi, batuki Nzambe, 3 bazangi bomoto, bazangi kotondo, bafingi Nzambe, bazangi komibetela, batonda nkanza, baboya bolamu, bateki , bazangi koyoka, bazangi motema, 4 boko linga kosepelisa nzoto kasi Nzambe te. 5 Bakolakisa ete ba kobanga Nzambe, nzokande bako boya nguya na ye. Kima mosika na bango. 6 Pona ete mingi mingi kati na bango bazali boye ba koyingela na mobota mpe kokwa basi boye bazanga mayele. BAye oyo batondi na masumu mpe, bamemani na mposa eyike. 7 Bajali koyekola tango inso, kasi bakoki soki moke te kokola na solo. 8 MPela moko Jannès na Jambrès baboyaki Mose, lolenge moko bateyi oyo lokuta baboyi solo, bazali boye batondisami na bozoba mpe bazangi ntina na maye matali kondima. 9 Kasi bako kende mosika te, mpona ete liboma na bango ekobima mpuasa liboso ya bato mbaso, mpela moko boye wana. 10 Nzokande yo okobaki na boyebi mateya na ngayi, botamboli na ngayi, mposa na ngayi, kondima na ngayi, mpiko na nga, bolingo na ngayi, mopikiliki na nga, 11 bitumba na nga, pasi na ngayi, mpe maye makomelaki ngayi na mboka Antioche, na Icone, mpe na Lystre Na bundisamaki makasi kasi Nzambe asikolaki ngayi tango inso. 12 Nzokande baye banso balingi bomoi nako banga Yesu Klisto bako bundisama 13 Kasi bato na mabe, mpe bakokoba na mabe koleka Bakobungisa basusu, bango moko basi babunga 14 Kasi yo, tikala na maye oyekolaki mpe andimelaki makasi. Ozali na boyebi na nani oyekolaki na ngo. 15 Oyebi malamu ete uta bomuana na yo, oyebaki Makomi Esantu, maye makoki kokomisa yo na bwana ntina lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu Klisto. 16 Makomi nionso ezali kowuta na Nzamben na ntina ye koteya, kondimisa, kobongisa, mpe kolakisa kati na sembo. 17 Na tina ete mosali na Nzambe azala na mayele mpe makoki mpona misala malamu.